jeudi 23 décembre 2010

Mwinda mokongenge o nkati ya molili

"Bozala na bobangi té, nzambi, namemeli bínó nsango ya malámu mpé ya esengo mpo na bato banso: lelo Mobikisi abotameli bino o mboka Davidi. Elembo na bínó: bokomono Mwana moké azingami na bilamba mpé alali na eleyelo ya bibwélé" (Lukasi 2 : 10-12).

Bakengeli mpata bayoki nsango ya mbótama o monoko ya Anzelu, bandimi yango mpe na nkati ya molili ya butu "bakei komona maye malobami".

On kati ya mosala mwa ngai, ya kolendisa Mpata, eye nabandaki, koleka sik'awa ba anza ebelé o nkati ya bituka biyé, nayoki likambo ya molili, eye epesami nkombo, obangi mpe bikela ya mabé, bozangi mosala mpé mpasi ya ndengé na ndengé, mawa na obanga, bokabwani mpé komikanga.

Namoni lisusu Babali, Basi, Bana mpe Bilengé, baye bazalí kokoba mpo na komono Mwinda eye ekongéngé o nkati ya motema ya moto nionso. Nakutani na Babali, Basi, Bana mpe Bilengé bayé bakontingama mpo eté bisika Mwinda mokongengé etikala libela.

Na Eyenga eye ya Mbótama, makanisi ma ngai matalisami na maye manso bizali kosalama o masanga ndengé na ndengé ya bondéko, esika Mwinda ekoki kongéngé. Makanisi ma ngai matalisami na mabota esika moto na moto akoluka koyeba soki bakolingaka yé na lolengé na ye.

Nakanisi bilulu ya boyakani na bisika bovandi na bandeko basusu. Makanisi ma ngai matalisami lisusu, na ba losako ya mpamba, oyo bokopesanaka na boyingeli o ndako wa bino, likabo ya pamba ekomema bino, longwa na bokeseni kino na boyebi…

Kosepela Eyenga ya Mbótama elingi koloba té, te tobosani Molili ya Butu, nkasi oyamba likabo liyé Nzambé apesi biso na yezu-klistu: "Mwinda ekongéngé na molili mpe molili mokoki kokanga yanga té" (Joani 1 : 5). Babali mpe basi "bakotambola" mpo té Mwinda engéngé na molili, bokotangaka bango té na makomi ya bopanzi sango na bikolo. Mpo na bango, lisanga na bango ndé natombeli bino Eyenga Ela mu ya Mbotama.

+ Pascal Delannoy, Episkopi ya Santu Denis (Falansia)

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

Commentaires en français et en lingála sont acceptés. Il doivent être signé. Avant la publication, ils sont lus par la rédaction.